Tuesday, July 2, 2013

Zaiko Langa Langa (Dindo Yogo) - Mokili é Changer - Paroles - Lyrics


Na tango ba koko na biso ba zalaka na sé (2x)
Adou Elenga ba ndeko a yembaka ata ndele oh
A yembaka ata ndele mokili oyo eko baluka
A yembaka ata ndele oh mabele oyo eko ningana
Mokili é changer oh oye oye oye oye
Mokili é changer oh
Mongongo ya Dindo mongongo ya Zaïre mokili é changer oh
Bo tounela nga Makwayala mwana mboka mokili e changer oh
Baninga ye bandeko boyoka lisapo ongue
Baninga ye bandeko boyoka lisapo ongue
Baninga ye bandeko Kinshasa ebandaki na kintambo
Baninga ye bandeko Kinshasa ebandaki na Léo II
Lelo oyo oyo oyo oh Kini ekoma monene
Obandi na kintsuka okoti Mont Ngafula o suki na Maluku
Na 60 - 65 Congo mboka ya chaos na anarchie 
Le 24 novembre 65 date ya mbongwana
Papa Mobutu a ye ko sukisa kimia ekoti na mboka
MPR parti ya lokumu esangisa bana ya Zaire
Papa moko mama moko parti moko ecolo moko 
Mokonzi moko e
Bato ba tuna ka tina nini nga na koma mawa mawa 
Nionso se makinisi ya avenir ya banas na ngai
Nionso se makinisi ya libota na ngai
Loala mwana na nga ya liboso tala mokumba sima na yo
Ozali mobali ndjoko a lembaka mino na ye te
Mokili e changer oh...
Mongongo ya Nyoka mongongo ya Zaïko
Baninga eh bandeko boyoka lisapo ongué
Baninga eh bandeko boyoka lisapo ongué
Baninga eh bandeko Brazaville ebandaka na Poto-Poto,
Poto-Poto solo mboka monene Antoine Munganga ayemba
Lelo oyo oyo oyo oh bea ekoma monene
Obandi na M'pila, Talangaï, Makelekele mpe na Bacongo
Bokamwani te mokili e change ba ndeko
Bassi ya makwela ba koma lelo bassi ya ndumba
Bassi ya ndumba ba koma lelo ka vanda na makwela
Ba pagano bakoma ko sambela nzambe 
Pasi ya mokili eleki bango
Baninga eh bandeko boyoka lisapo ongué
Baninga ye bandeko Dindo Yogo na bandaki na maquis
Na Sali etumba na gwaka na leki pe na Viva la musica
Langa Langa Star ezali ba souvenirs ya la vie na ngai
Pona kosukisa na komi na suka na Zaïko Langa Langa 
nkolo mboka na leli oye
.....................
Mongongo ya Nyoka mongongo ya Zaïko mokili é changer oh
Bo tunela nga Lengi Lenga ya motema mokili é changer oh
Ilo Pablo Belobi tolembi mokili é changer oh
Bo tunela nga Zamwangana na Bimi mokili é changer oh
Mongongo ya Dindo mongongo ya Zaïko mokili é changer oh
Botunela nga JP buse ya motema................................................
      
SUBMITTED BY PAR ALINO B

No comments:

Post a Comment