Monday, February 10, 2014

Blaise Bula - Le Petrolier - Paroles - Lyrics




baninga boyoka lisapo ya ngai na yé,bolingo ya bomuana,bolingo sukali,yé ko abotama na yé na famille ya mosolo baninga mpiaka akoka té akima na yé palais
nayebi okoboya to okoyoka ngai soni,nasi na comprena niveau okoma okokaka mpiaka té oh po okola na mbongo wuta bomuana
bongolisa makanisi zonga ndako,na mokili baloba mpiaka eza nango libandi té,lelo ozui lobi ozangi c'est ca la vie
popoL lutadi kanga motema,mvula esopani,zelela nga beta ata loto,namoni meka ata le millionaire,a prendre ou a laisser efutaka bien,to PMU en nomber efutaka vrai
kokanisaka ata mokolo ngonga ya nzambe ebeta,na presence ya aimé tolatisana lopete ya alliance,topesanaka malako ya nga na yo ti liwa
yo ndé ekelamu yahwe atindela nga ya libala,mpo ba criteres na tia wuta bomuana ya mobali ya makuela,y'omonisa nga yango popo lutadi
wuta y'okende ndako etikala molili eh ,wuta y'okende ngai awa molili eh,nakoma nga kobanga(..) y'olingi nga nazoka pelisa muinda zonga ndako kosala nga boyé té
popo lutadi,ngai awa mawa,popo lutadi ngai awa souci,nga napesa yo motema tik'osala semblant,awa docteur amona na yé nanu kisi ya bolingo té apart presence na yo
soki thermometre ya bolingo ezala mbele oyeba degré nalingelayo,temperature é deborda l'amour na ndenge ya liboma ata na degre kelvin,ata na fahrenheit eleka mbeka
yango namoni tomeka na degré liwa,yopia nga kizungu-zungu lutadi eh,y'o liesa nga ndé nini(...)
oyebisaki nga oké vacances na kinshasa ekanaki yo poso mibalé lelo ekomi mvula,awa matoyi ekosala pasi na koyoka
nzoka mobembo okendaka libala coop ya famille na bino,ekila ya famille na bino bobalanaka sé na ba metis
na changer ata poso,pourvu nazala na nga pembeni ya popol
oyebisaki nga oké vacances na toulouse ekanaki yo poso mibalé lelo ekomi mvula,awa matoyi ekosala pasi na koyoka
nzoka mobembo okendaka libala coop ya famille na bino,ekila ya famille na bino bobalanaka sé monoko moko
na changer ata ekolo,pourvu nazala na nga pembeni ya popol
beauté ya lutadi lokola ange ya nzambé,naloba lisusu nini nga nakoma malheureuse,tango asekaka mino pembe sourire ya holywood
etamboli ya popol lutadi ba nzele balemba kotala té oh nalela beauté ya nga na yé esala symbioso ya beauté,tala ata muana tobota,popol lutadi ya nga moko eh
ya munu moshi,papa na paul etienne,tomona pasi nga na yo kosala nga boyé té
sala ata endzombo kasi koboya ngai té,mela nayo komela kasi ko langwa té,bima na yo kobima kasi kolala libanda té,linga ata mokili mobimba kasi kobota libanda té
popol lutadi na nga,surtout pas,non,surtout pas ca,surtout pas ca...
masuwa bakumbaka toujours bato mibalé,mpo soki moko alembi mosusu azui releve ya ngai masuwa ezangi assistance,pongi na miso masuwa ekoya kosala nauffrage,milimo ya bato ba dedommageaka té oh
je t en prie yaka osunga, je t en prie yaka ko consoler nga,


my brothers and sisten listen to my story with him,it was pûppy love,sweet love,but he was born in a rich familly and he left our house when we had financial problems
i know you will leave me,or be ashamed to come home as i understood that your life standard since childhood makes it tough for you to handle financial struggle
think twice and come back home,because in life money come and goes,struggling is not the end of the world
pôpol lutadi,be courageous,and if you want try millionaire game,betting shop,lottery maybe you will be a winner
remember when God united us,when we exchanged our wedding rings and we promised to stick together until death
you are the one God chose to be my husband,you have all i expected from the man i would marry one day
since you have gone,our house is dark,since you have gone its sad here,i am afraid,do you want me to suffer?please come back don't do this to me
popo lutadi,i am sad and sorry,i gave you my heart and you know it,doctors said there is no cure to love except the presence of the loved one
if there was a thermometer of love,maybe you would understand how much i love you,you'd see my love exceeds standards of thermometers whether in kelvin degree or in fahrenheit
you've  made me crazy in love,i wonder what you gave me to make me love you like that
you told me you went on holidays in kinshasa for two months,but now its been a year,and i am hurt as i finally know you went to marry another girl,as in your family there is a rule you only marry with mixed races women
i would change my skin color,as long as i am next to popol
ou told me you went on holidays in kinshasa for two months,but now its been a year,and i am hurt as i finally know you went to marry another girl,as in your family there is a rule you only marry women of your ethnic group
i would be from another ethnic group,as long as i am next to popol
he is beautiful like an angel,and when he smiles you'd think he is a hollywood star and when he walks women do not cease admiring him,him and i gave birth to a beautiful baby,he is my sweet love,my own one
be capricious if you want but dont abandon me,drink if you want but dont get drunk,go out as much as you want but do not sleep elsewhere than home,flirt with the whole world but do not make another women pregnant,no,no,not that
a boat is always driven by two captains,so that if one gets tired the other replaces him, me i am alone,and i am tired and the boat could sink,think twice you cant pay back somebody's life breath
TRANSCRIBED & TRANSLATED BY: ARCHOS

1 comment:

  1. Un des plus grands bonheurs de cette vie, c'est l'amitié ; et l'un des bonheurs de l'amitié, c'est d'avoir à qui confier un secret. Poeme d'amour Poeme d'amour Sms d'amour Citation d'amour Proverbe d'amour Phrase d'amour Calculatrice d'amour

    ReplyDelete